Y’oza monene papa y’otonda na nguya
Yangabita Mokonzi, Nkumu monene
Naluka yo na ba ngomba, ba veillées, ba jeûnes, ba retraites
Nzambe ya ba Ntoma, Nzambe ya milimo ya basakoli
Maladi nini olembana n’ango eh, Bobola nini Jehovah okoka te kosilisa

Problème nini, Goliath nini ango, efelo nini okoka te kokweyisa

Tala ngai mwana, nakomi na suka,
Liboso mayi ya monana, sima na ngai mampinga ya Falo
Moyoki losambo tozongi nayo eh
Otikala jamais koyokisa soni baye batalelaka yo

Belela Nzambe oyo
Belela nzambo oyo
Benga ye azo yoka
Benga ye akosala
Senga ye akopesa
Luka ye aza nanu
Ye moyoki losambo
Azali fidèle

Ba mokili balingi bayeba wapi Nzambe na ngai
Nzambe o’ya ngai oyo, afandaka na lola
Akabola bibale, na biteni mibale oh
Akitisa moto uta lola ba prophètes ya baal basambwa eh
Akanga minoko ya ba nkosi ye moto ya mineyi na moto
Abenga liwa pongi, Akufa mpe asekwa,
Soki okiti te défaite ekoti na camps ya basantu
Soki osali te matanga ekoti na ngambo na ngai

Tala ngai mwana, nakomi na suka,
Liboso mayi ya monana, sima na ngai mampinga ya falo
Moyoki losambo tozongi nayo eh
Otikala jamais koyokisa soni baye batalelaka yo

Sala ya minene
Nalingi namona
Papa fongola ata lola
Nokisa ata mvula
Yesu longola ngai soni
Papa yembisa ngai nzembo ya sika
Ngai naleli mpe mingi eh
S’il te plait sekisa ngai nanu
Baba sikiya maombi
Mufalme wa dunia
Mimi, minaliya sana
Mungu wa milele

Louange ya boye efongolaka lola ya Nzambe
Masanjoli ya boye ekitisaka Nkembo na nse
Louange ya boye efongolaka lola ya Nzambe
Masanjoli ya boye eningisaka Trône ya Papa

Yango Polo na Silas bayembelaki yo

Ah! Obuka bifelo ya boloko
Minyololo ekweya

Biso mpe basantu toye na loyembo

Oh! Fongola bikuke ya lola
Papa tolingi nde nkembo
Nkembo, nkembo
Papa tolingi nde nkembo

Yango Basantu toye na loyembo oh

Oh! Fongola bikuke ya lola
Papa tolingi nde nkembo

Kumisa Nzambe oyo
Kumisa Nzambe oyo
Sanjola ya Yesu eh
Sanjola ya Yesu eh
Binela yesu oyo
Binela yesu oyo

Eza pona Yesu nde tozo bina awa
Biso tokolemba te tokosanjola
Lelo tokokende te tokolala awa
Soki tongo ekotana, etana n’ango

Eza pona Yesu nde tozo yemba awa
Soki mvula ekonoka, enoka n’ango
Eza pona Yesu nde tozo bina awa
Soki kake ekobeta, ebeta n’ango

Eza pona Yesu nde tozo yemba awa
Bolamu osali Papa tokobomba te
Tokotatola, tokotaola

Ah! Pona Yesu tokobina awa eh
Lelo mutoki ekobima awa pona ya yesu
Lelo mabina ekotoka awa ekotoka awa ekotoka awa

Bina kasi, bina ko, let’s dance
Ah! Ningana muke,
Bina kasi, bina ko, bougez
Bina kasi tout le monde pona Yesu ningana muke

Louange ya boye efongolaka lola ya Nzambe
Masanjoli ya boye ekitisaka Nkembo na nse
Louange ya boye efongolaka lola ya Nzambe
Masanjoli ya boye enokisaka mvula ya ngolu

1 COMMENTAIRE

LAISSER UNE RÉPONSE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
Veuillez entrer votre nom ici