To pusani liboso nayo
To memi mbeka ya masanjoli
Yamba loyembo ya ba bulami
To bonjeli yo Nzambe na bomoyi
Kiti na yo eza ya seko
Bokonzi nayo ya libela
Ozali nzambe tozo yembela
Kombo na yo Emmanuel

To Gumbameli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo Yesu
To Gumbameli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo Yesu
Bipayi yo ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo
Hosanna kembo nayo

Na ekulusu makila etangi
Mokonzi Yesu amipesi mbeka
Elemba ya pe lelo epasuki
Tozui bosombi liboso na yawhé (na yango)
Sango malamu ekomeli biso
Tongo tongo masiya asekwi
Aza lisusu na lilita te (Alléluia… Il est vivant… Jésus)
Alongi liwa aza na bomoyi

Lilita etikali polele
Masiya Yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye
Lilita etikali polele
Masiya Yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye
Bipayi ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo
Hosanna kembo nayo…(Alleluia…)

Mobikisi ya mabota
Ya mokili to belemi
To sopi mitema
Na biso liboso na yo

To kumambeli yo mobikisi
Mokeli ya likolo se
Moboko esimbi kondima
Ya ba santu eza yo Yesu
Lilita etikali polele
Masiya Yesu asekwi
Oyo nionso ya ngai ekufaki
Esekwi elongo naye
Bipayi yo ofandi yamba
Loyembo ya mitema
Maboko totomboli likolo (Hosanna..)
Hosanna kembo nayo

LAISSER UNE RÉPONSE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
Veuillez entrer votre nom ici